Cancion : Mobobe Artista : Ferre Gola Album : QQJD, Vol. 3 Url : https://www.letras10.co/letra-mobobe-de-ferre-gola Roger Ndonga oyaka espion na mboka bolingo ooh (ouais) Yo ndé okotaki zamba koluka mbuma Olié, otonda, okenda aahYo moto okata ruban ya tempelo ya jouissance na ngayi Lelo osali abandon de poste, okotisi ba infiltrés Nasala yo nini iiih Oyebi que ba boya jamais lobok′oyo ezo sala yo cadeau Nzoka ndé otikela nga héritage ya makanisi bébé Nazokufa, yo ozoseka Roger ba bengi nga mobobé ya bolingo na yo Ndonga ba bengi nga zoba na bolingo na yo Mobobé nde ngayi Moto na kata ba relations amoureuses na nga po na mérita amour na yo Roger ba bengi nga mobobé ya bolingo na yo Ndonga ba bengi nga zoba na bolingo na yo Hum, Djany Sita y'otikela nga fuite eeeh Miso na ngayi, ekokaka lisusu ko bomba mayi té Preuve ya regret ya départ na yo Roger Ndonga y′otikela nga déluge na république ya motema Noé na nga ako wuta wapi po aya ko sauver ngayi mama eeh Motema ebukani, love ko kinésithérapie té eeh Romain ndé "je t'aime" na yo Solution ndé présence na yo oooh Y'oponi okendé Roger ba bengi nga mobobé ya bolingo na yo Ndonga babengi nga zoba na bolingo na yo Mort subite na bolingo pé ezalaka aah Pardon Roger, buakisa mbanda wana eeh Noki té akoboma yo na mopanga ya bolingo Roger eeeh, Ngonda Monsieur Fidèle akufa Saint-Valentin kutu etikala fête ya ba amoureux (jamais e changea eeh) (Roger oyébi jamais e changea) Mobobé na ngayi Roger Zoba nde ngayi Ndonga Client na nga na wenzé ya bolingo, Joel Tshimbangu Soki otelemi liboso ya mesa na nga, ezalaka po na tshamwé Et pourtant natandeli yo Oscar Tshimbangu, yo mobobé eeh Entre ciel et terre, okundi bolamu na ngayi Raka-raka conduit moi à la dernière demeure Bolingo adieu, sentiment bye-bye C′est vrai ba lobaka que la confiance n′exclut pas le contrôle Quelque part fidélité ndé rendre nga service ya mabé Fonction na nga kapita, role na nga kokengela l'amour Job ango na negligeaki Nazo yeba té entre condoléances na félicitations nini nazo mérité eeh? Mobobé ndé ngayi Paul Bindu Musambali Zoba nde nga eeeh, Isis Tola Roger ba bengi nga mobobé ya bolingo na yo Ndonga ba bengi nga zoba na bolingo na yo Mobobé nde ngayi Na organiser rencontre po nasa′o plaisir mobali na nga Nasombi champagne po to boomé molongani na ngayi Omeli, olangwé, okomi kolela chérie na yo ya kala Nzok'olingaka na yo ngayi té Disha Kalambi Natikala lokola élève a rater examen d′état aah A zozela année prochaine a bandela avec regret eh eeeh Mobobé nde ngayi Roger (zoba na bolingo na yo) Ya mobobé Girès Peugeot, Miguel Bakinama Ya mobobé eeh, Chouchouna Tatila Ya mobobé eeeh, Berado Prince de Zamunda Ya mobobé e eeh eeeh Ya mobobé eeh, Prince Tumbonio Ya mobobé ya Dada na Paris Richard Darimaté, ya Thierry Gola eeh Si je savais nalingaki té namipesa na bolingo oyo Francine Nsalé Na lingaki té na miniokola, Joe Tambani Nakanaki té namona ba pasi ya boyé, sima ba benga nga mobobé, Ryan Tambani Roger ba bengi nga mobobé ya bolingo na yo Ndonga ba bengi nga zoba na bolingo na yo Mobobé nde ngayi Miso ya matanga etikaka cicatrice na matama Kaba-Kabasu yak'o tala nga ndengé matama ekomi ebalé Y′o troubler bongo na nga, bolingo n'otié nga otié contre-mur Teddy Kaminzunga, Malara Djabu Yango okomi'o sala nga bongo po nalingi yo Po bolingo n′o eleki ya b′angelu Nayebi bien que oza mobali ya ba rando Bolingo ekoti tima, eh Jésus nako tik'o té Bolingo ya ba ninga malamu, oy′a nga sé kolela Tika natuna bébé na nga, est-ce que "to tia?" Mwamba Mukubu, "to tia?" Cheda Love, Yannick Minga, Arlette Moindo, Matima Mama Opesi importance na makasa po ozo tumba liboké Yeba mokolo okosala soso okoloka ngayi nzungu eh Mobobé ndé ngayi iih Gabin Tokodi Zoba ndé ngayi iiih, Julie Mubenga Mobobé ndé ngayi, Emma Sonangol Zoba ndé ngayi, Fiston Balaboss Mobobé nde ngayi iiih, John Toto Zoba nde ngayi iiih, Horsenny Lumene Mobobé eeeh Roger ba bengi nga mobobé ya bolingo na yo Ndonga ba bengi nga zoba na bolingo na yo Mobobé ndé ngayi ========================== Letra descargada de Letras10.co ==========================