Letra Maman de Papa Wemba

Letra de Maman

Papa Wemba


Maman
Papa Wemba
(0 votos)
Mileye nini na sala na berceau ya Maman?
Eleki elingi koleka ba mbeto nionso nga na lala
Maman soki ozalaki kaka na bomoyiMbele na sengi zongisa nga susu wana
Jamais olingaki nga na lela yo seka
Jamais olingaki yo lala nga na lamuka

Jamais olingaki ata ngungi atungisa ngai
Soki na beli ozalaki kotana tongo nsa
Banda y′okenda nakoma abandoné
Recompense nayo nako pesa nani yango?
Ata na leli nani ako dorloter nga, a-a-ah
Yango na yembeli yo zembo oyo Maman Niondo

Elengi ya libelé ya Maman abota ngai
Eleki ba recette nionso ya ba cordon bleu nga na lia
Ata mafuta, tomate ezalaki te, oh
Kasi yango elakaka nde mosuni n'élengi
Banda y′okenda appétit esila nga-ah
Nakoma ko lia kaka
Po na sepelisa nde monoko, eh-eh

Mateya ya Maman
Ezanga bulletin mpe minerval
Kasi eleki ba leçons ba maitres
Ba professeurs ba pesa ngai
Maman soki ozalaki kaka na bomoyi
Mbelé na sengi batia yo ministre y'éducation
Mbele ba parquets, ba prison nionso bakanga
Mbelé kutu motu mabé azali té, eh

Lelo nakanisi yo mingi Maman ah
Mpo jour y'anniversaire na nga ekomi pene
B′invités bako lia bako mela masanga
Yo kutu artisan na ngai y′ozali te
Epayi y'ozali soki okutani n′occasion eh
Tindela nga carte de voeux, ata fololo

Esengo na nga ekozala multiplier fois deux
Normalement fêti ya lelo ezali ya yo, eh
Serment d'Hippocrate ba médecins ba kosalaka
Ya nga serment y′ozala toujours Maman ngai
Ata ba bandeli mokili soki mbala zomi
Ya nga serment y'ozala toujours Maman ngai

Mais lelo nakanisi yo mingi Maman Niondo
Mpo jour y′anniversaire na nga
Ekomi pene Maman
B'invités bako lia bako mela masanga, woh-woh
Yo kutu artisan na nga y'ozali te, Maman

Epayi y′ozali soki okutani n′occasion eh
Tindela nga carte de voeux, ata fololo
Esengo na nga ekozala multiplier fois deux
Normalement fêti ya lelo ezali ya yo
Serment d'Hippocrate ba médecins ba kosalaka
Ya nga serment y′ozala toujours Maman ngai
Ata ba bandeli mokili soki mbala kama eh
Ya nga serment y'ozala toujours Maman ngai

Maman soki ozalaki kaka na bomoyi
Mbele na sengi zongisa nga susu wana, o-oh

Ma-man soki ozalaki kaka na bomoyi
Mbele na sengi zongisa nga susu wana


Comparte Maman! con tus amigos.


Que tal te parece Maman de Papa Wemba?
Pesima
Mala
Regular
Buena
Excelente