Letra Yaya de Madilu

Letra de Yaya

Madilu


Yaya
Madilu
(0 votos)
Madilu ye meï System
Appellation bien contrôler
Le grand ninja
Lelo mbula libwa wuta na nse ya mabélé yaya a-ah nga na mawa
Lelo mbula libwa wuta na nse ya mabélé yaya a-ah nga na mawa

Yaya otiki nga na boloko
Yaya otikeli nga bwale
Yaya otikeli nga pasi mawa
Mokili eloba otikela success
Banda okende batu′a mokili bakoma komonela ngaï leki na yo yaya

Yaya otika nga na bwale
Yaya otika nga boloko
Yaya otika nga pasi mawa mawa
Mokili eloba otikela nga success
Banda okende batu'a mokili bakoma komonela nga leki na yo yaya

Nzoto na nga cahier de brouillon
Moto nionso alingi akomela mabé na yé na nzoto na nga yaya
Géographie, mathématique eluta na nzoto na ngaï
Moto nionso alingi asopela libabe na yé na nzoto na nga yaya

Yaya mokolo na wuti mikili yaya
Nakuti mboka mobimba bazali ko lela yo yaya
Esali nga somo yaya, nazui nzela
Baké na lilita na yo yaya
Na kuti eboquet ya fololo yaya
Ngaï pe nazui likanisi na tia oyo ya ngaï fololo ya monene yaya
Mais na moni eko zala provisoire
Tangu mususu miyibi bakoya ko yiba yango
To eko kauka na moyi etonda Kisasa yaya
Eko zanga souvenirs yaya
Alors na moni yaya ebongi na yemba yo po etikala libela

Na nokeli mvula libanda na mayi na misu eko leka nga
Nani ako ndima nga nazali ko lela yo
Libanga ba buakaka na nzeté sé oyo ebotaka mbuma
Oyo eko ndimama osé eh eko ndimama likolo yaya

Yaya na lali na butu yaya na loti kabakata ya ndoto yaya
Ba landi nga na ma banga
Ba boma nga lokola ba bomaka Saint Étienne
Po alaka oteya liloba ya Yésu
Na lamuki na tala boye ezalaki ndoto
Nake epa ya papa Dialungana
Na tuni papa alobi eyali pouvoir

Na sala nini yaya okende
Na lelela nani yaya obunga
Na tuna bato yaya a kende
Soki ozalaki ndé yo oko tela nga yo mawa
Yango na zongeli kombo na nga ya kala
Ya Lou Jean de dieu
Même les miens ba bengi ngaï ndoki
Ce n′est pas possible

Na lelela nani yaya ah
Na tuna nani yaya akende
Na belela wapi yaya Bongo
Maso ba lobaki pe na maso bako lobaka pona ngaï
Lokuta eyaka na ascenseur
Kasi vérité eyaka na escalier yaya

Baluka ba boma nzoti ya mwana Moto pe ba kunda bango moko
Ndengue ba mesana ko kunda bana ba ninga eh-eh
Ba lotisaka bana batu ba ndoti'a mabé
Ba salelaka mwana batu ba campagne ya lokuta ah yaya ah

Mabé kani nga na sala Nzambé kaka pe ayebi
Ata ba lobi pamba losambe ndé liboso
Nani na mokili akosisa sé mibeko ya Nzambé
Yaya a-ah nga na mawa
Yaya otiki nga na boloko
Yaya otikeli nga

Sima na yo na mona makambu kinsasa nani a loba té
Ba bomi bato ba lati moposo na nga ya nzoto
Ba bombana, ba bombana molungier eleki
Lelo bo soto niosno ebimi libanda
Bakomi ko luka refuge na kati ya ebale mbogier

Ba bosani ba nzuzi ya ebale pe bazalaka
Ba baleine na ba hippopotame
Soki ba lié yo oko tuna nani?

Boma ngaï kasi ko boya ngaï té
Etikali bana Kin ba kata likambo
Etikali ba Congolais ba kata klikambo
Etikali ba Congolais ba kata klikambo


Comparte Yaya! con tus amigos.


Que tal te parece Yaya de Madilu?
Pesima
Mala
Regular
Buena
Excelente