Letra Mwana Na Mpate de Adorons L'eternel & Alain Moloto

Letra de Mwana Na Mpate

Adorons L'eternel & Alain Moloto


Mwana Na Mpate
Adorons L'eternel & Alain Moloto
(0 votos)
Moko té azalaki na makoki ya kosala
Oyo Nzambé kaka ndé akokaki ko sala
Yango wana azwi liloba oyo ezalaki NzambéMpé asaleli yango nzoto, oyo abotamaki azalaki Nzambé
Alléluia
Yembela bipayi ezali yo, motema n′o etondisama na esengo
Parce que nous célébrons le ressuscité
Alléluia

Okokisa makambo nionso n'ekulusu
Pona tina na ngayi eh, ooh Yesu uuh
Yaya okokisa makambo nionso n′ekulusu
Pona tina na ngayi eh, ooh Yesu uuh
Nzambé monène alati mposo ya bomoto
Pona tina na ngayi eh, ooh Yesu uuh
Nkolo wolo, palata abotami pène ya bibwelé
Pona tina na ngayi eh, ooh Yesu uuh

L'avocat auprès du père azangi eloko yako loba
Pona tina na ngayi eh, ooh Yesu uuh
Monkozi ya mapinga ba beti yé na ba soldats
Pona tina na ngayi eh, ooh Yesu uuh
Yé ko le roi des rois ba latisi yé ekoti ya nzubé
Pona tina na ngayi eh, ooh Yesu uuh

Ah ah ah Yesu (aaahh aah ah Yesu)
Mwana mpaté (mwana na mpaté, obongi na lokumu)
Ah ah ah Yesu (aaahh aah ah Yesu)
Mwana mpaté (mwana na mpaté, molongi ya balongi)

Okokisa makambo nionso na ekulusu
Pona tina na ngayi eh, ooh Yesu uuh
O ndima liwa ya somo n'ekulusu
Pona tina na ngayi eh, ooh Yesu uuh
Mokeli na nionso akomi mosali ya mabaya
Pona tina na ngayi eh, ooh Yesu uuh
Nzambé na nkembo ba sambisi yé n′ekelamu
Pona tina na ngayi eh, ooh Yesu uuh

Nkino a ganga n′ekulusu "tout est accompli"
Pona tina na ngayi eh, ooh Yesu uuh
"Eli, Eli, lama sabachthani" Yesu aleli ngo
Pona tina na ngayi eh, ooh Yesu uuh

Ah ah ah Yesu (aaahh aah ah Yesu)
Mwana mpaté (mwana na mpaté, obongi na lokumu)
Ah ah ah Yesu (aaahh aah ah Yesu)
Mwana mpaté (mwana na mpaté, molongi ya balongi)

Yango na yembi mwana mpaté (mwana na mpaté, mwana na mpaté)
Mwana na mpaté eeh (mwana na mpaté)
Mwana na mpaté eh eeeh (mwana na mpaté)
Mwana na mpaté, eh eeeh (mwana na mpaté eeeh)

Mwana na mpaté eh (mwana na mpaté)
Mpaté na Nzambé (mwana na mpaté)
Mpaté eeeh (mwana na mpaté)
Mpaté na Nzambé eeh (mwana na mpaté eeeh)

Azui bisika na nga ya mbeka liboso na tata (mwana na mpa-aaa-té eeeh)
Mwana na mpaté eeh (mwana na mpaté)
Mwana na mpaté eeh (mwana na mpaté)
Bisika awuti ba moni té (mwana na mpaté)
Nzoka ndé awuti likolo (mwana na mpaté)
Apesami bisika ya liwa ya bato Yesu masiya ngo ooh (mwana na mpa-aaa-té)

Yesu eh, eeh, eeeh elonga na nga
Elonga na nga ah, aaah (Yesu eh, eeh, eeeh elonga na nga)
Yesu elonga na nga, ooh (Yesu eh, eeh, eeeh elonga na nga)
To kozonga lisusu sima té eeeh (Yesu eh, eeh, eeeh elonga na nga)
Congo ezali mboka ya elaka, aaah (Yesu eh, eeh, eeeh elonga na nga)
Ngonga ya Nzambé ebeti na mbok'oyo, ooh (Yesu eh, eeh, eeeh elonga na nga)
Molongi akoti esengeli to longa, aaah (Yesu eh, eeh, eeeh elonga na nga)
Ils l′ont vécu à cause du sang de l'agneau, ooh (Yesu eh, eeh, eeeh elonga na nga)
Il les a livré publiquement sur table nous (Yesu eh, eeh, eeeh elonga na nga)

(Mwana na mpaté)
Mwana na mpaté eeh (mwana na mpaté)
Mpaté eh eeeh (mwana na mpaté)
Mpaté na Nzambé eh (mwana na mpaté)
Mpaté, eh eeeh (mwana na mpaté)
Mpaté na Nzambé eh (mwana na mpaté)

Sujet ya masajonli na nga, (mwana na mpaté)
Elamba na nga ya nkembo, (mwana na mpaté)
Esengo ya motema na nga, (mwana na mpaté)
Bikuké ekotisi na nkembo, (mwana na mpaté)

Mpaté na Nzambé azui bisika ya passi ya ba ndimi, (mwana na mpaté)

Apetoli mitema (mwana na mpaté) abimisi bisso bi pené ya papa, (mwana na mpaté)
Tokomi ba santu pona yé (mwana na mpaté)
Yo ndé, yo ndé, (mwana na mpaté)
Yo ndé, yo ndé, mokonzi ya bakonzi (mwana na mpaté)
Yo ndé, yo ndé, elikia ya motema yo ndé (mwana na mpaté)
Yo ndé, yo ndé, mo panguisi pinjoli yo ndé (mwana na mpaté)
Yo ndé, yo ndé, elombé mobali yo ndé (mwana na mpaté)
Yo ndé, yo ndé, elikia ya motema yo ndé (mwana na mpaté)
Yo ndé, yo ndé, elingi ya kozala yo ndé (mwana na mpaté)


Comparte Mwana Na Mpate! con tus amigos.


Que tal te parece Mwana Na Mpate de Adorons L'eternel & Alain Moloto?
Pesima
Mala
Regular
Buena
Excelente